Banzembo 92
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.
2Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo !
3Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,
4na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze !
5Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai ! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.
6Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !
7Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
8Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
9Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.
10Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza ; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
11Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
12Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.
13Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
14Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.
15Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
16basakolaka : « Yawe azali alima, azali Libanga na biso ; kati na Ye, mabe ezali te ! »
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath