Banzembo 8
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
2Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.
3Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
4Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
5namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
6Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;
7otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo, otia nyonso na se ya matambe na ye :
8bameme, bantaba, bangombe mpe banyama ya zamba,
9bandeke ya likolo, mbisi ya ebale monene mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
10Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath