Boklisto
zonga

Banzembo 87

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.

2Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.

3Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

4Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.

5Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »

6Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango : « Moto songolo abotama kati na Siona ! »

7Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka : « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath