Boklisto
zonga

Banzembo 76

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi.

2Nzambe ayebani kati na Yuda ; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.

3Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi ; mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.

4Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.

5Ozali kongenga lokola mwinda, otonda na lokumu koleka bangomba ya babotoli bomengo ya bitumba.

6Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka ; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.

7Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.

8Solo, ozali somo ! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?

9Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yo eyokana na matoyi ya bato ; mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia

10tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.

11Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.

12Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !

13Abukaka lolendo ya bakambi, mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath