Boklisto
zonga

Banzembo 70

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.

2Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai ! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !

3Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni !

4Tika ete bato oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !

5Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! »

6Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath