Banzembo 67
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.
2Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ;
3mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
4Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
5Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele.
6Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
7Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
8Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye !
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath