Boklisto
zonga

Banzembo 60

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.

2Ayembaki yango tango abundisaki bato ya Siri ya Mezopotami mpe bato ya Siri ya Tsoba, mpe tango Joabi azongaki, sima na ye kolonga bato nkoto zomi na mibale ya Edomi, na bitumba kati na Lubwaku ya Mungwa.

3Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso, osilikaki penza. Sik’oyo, zongisa biso.

4Solo, oningisaki mabele mpe obukaki yango. Bamba madusu na yango, pamba te ekomi koningana.

5Omonisaki bato na Yo pasi makasi, omelisaki biso vino oyo elangwisaka.

6Opesaki na bato oyo batosaka Yo bendele mpo na koyebisa bango ete bakima liboso ya batolotolo ya banguna.

7Mpo ete balingami na Yo bakangolama, bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali, mpe yanola biso ! Yanola ngai !

8Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.

9Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.

10Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »

11Nani akomema ngai kino na engumba oyo batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?

12Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso ?

13Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini ; pamba te lisungi ya bato ezali pamba.

14Nzokande, elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath