Boklisto
zonga

Banzembo 57

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

2Oh Nzambe, yokela ngai mawa ! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo ; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.

3Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.

4Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.

5Nazali na kati-kati ya bankosi ; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

6Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !

7Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.

8Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

9Lokumu na ngai, lamuka ! Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.

10Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.

11Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola ; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

12Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath