Banzembo 54
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
2Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
3Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
4Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.
5Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.
6Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
7Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
8Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.
9Okangoli ngai na pasi nyonso ; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath