Boklisto
zonga

Banzembo 53

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.

2Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo mabe mpe ya nkele ; moko te asalaka bolamu.

3Wuta na likolo, Nzambe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko ya mayele, oyo atalelaka Nzambe.

4Bango nyonso bazali batomboki, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te.

5Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te ?

6Somo monene ekokanga bango na esika oyo ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kopesa bango somo, pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya bato oyo bayei kobundisa yo. Okoyokisa bango soni, pamba te Nzambe abwaka bango.

7Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona ! Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath