Banzembo 52
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
2Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.
3Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe ? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
4Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
5Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.
6Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
7Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
8Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo :
9« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
10Kasi ngai, kati na Ndako na Yo, nazali lokola nzete ya olive oyo etondi na makasa ya mobesu ; natiaka tango nyonso elikya na ngai kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
11Nakosanzola Yo mikolo nyonso, mpo na oyo osali ; mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo, pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath