Boklisto
zonga

Banzembo 4

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.

2Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.

3Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?

4Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.

5Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.

6Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.

7Bato mingi bazali kotuna : « Nani akomemela biso bolamu ? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.

8Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

9Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath