Boklisto
zonga

Banzembo 48

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya bana ya Kore.

2Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.

3Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona ! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.

4Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.

5Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko.

6Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.

7Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota

8to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.

9Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso ; Nzambe alendisaka yango seko na seko.

10Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.

11Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.

12Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo.

13Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.

14Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.

15Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela ; akotambolisa biso, ezala kino na kufa.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath