Boklisto
zonga

Banzembo 47

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.

3Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.

4Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.

5Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.

6Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.

7Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.

8Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

9Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.

10Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath