Banzembo 46
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
2Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
3Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene ;
4ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.
5Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
6Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.
7Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.
8Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
9Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.
10Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
11Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »
12Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath