Boklisto
zonga

Banzembo 44

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Nzambe, toyokaki na matoyi na biso ; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.

3Na nguya na Yo, obenganaki bikolo mpe otiaki bakoko na biso ; obetaki bikolo ya bapaya mpe ofulukisaki bakoko na biso.

4Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.

5Oh Nzambe, Yo oyo ozali Mokonzi na ngai, pesa mitindo mpo na elonga ya Jakobi.

6Na lisungi na Yo, tolongaka banguna na biso, mpe na Kombo na Yo, tonyataka bayini na biso.

7Pamba te natiaka elikya te na tolotolo na ngai, mpe mopanga na ngai ebikisaka ngai te.

8Kasi ezali Yo nde obikisaka biso wuta na maboko ya bayini na biso, mpe oyokisaka bayini na biso soni.

9Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambe mpe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.

10Kasi obwaki biso, oyokisi biso soni mpe ozali lisusu kotambola te elongo na mampinga na biso.

11Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso ; mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.

12Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.

13Oteki bato na Yo na pamba mpe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.

14Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.

15Okomisi biso lisapo kati na bikolo, mpe bato bakomi koningisa mito na bango mpo na biso.

16Kosambwa ekomi tango nyonso liboso na ngai mpe soni ezipi elongi na ngai,

17mpo na litio ya bato oyo bazali kofinga mpe kopamela ngai, mpe ya monguna oyo akangela ngai kanda.

18Makambo wana nyonso ekweyeli biso atako tobosanaki Yo te mpe tobebisaki Boyokani na Yo te,

19atako mitema na biso epengwaki te mpe totamboli libanda ya nzela na Yo te.

20Pamba te onyokolaki biso kati na etando ya bambwa ya zamba mpe ozipaki biso na molili makasi.

21Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,

22boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema ?

23Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonso mpe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.

24Nkolo, lamuka ! Mpo na nini ozali kolala ? Lamuka, kobwaka biso te mpo na libela.

25Yawe, mpo na nini ozali kobomba elongi na Yo ? Mpo na nini ozali kobosana pasi mpe minyoko na biso ?

26Pamba te tokweyi na putulu, mpe nzoto na biso ekangami na mabele.

27Telema, yaka kosunga biso, kangola biso mpo na bolingo na Yo !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath