Banzembo 39
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
2Namilobelaki : « Nakosala keba na etamboli na ngai mpo ete monoko na ngai esala masumu te ; nakobatela penza monoko na ngai tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »
3Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye, natikalaki koloba ata likambo moko te ; pasi na ngai ebakisamaki makasi.
4Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
5Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
6Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
7Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili ; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
8Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini ? Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
9Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.
10Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.
11Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
12Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
13Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
14Kotala ngai te mpo ete nasepela lisusu, liboso ete nakende na ngai mpe nazala lisusu te.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath