Boklisto
zonga

Banzembo 36

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu : Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.

3Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.

4Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.

5Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.

6Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.

7Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.

8Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.

9Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.

10Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo ; kati na pole na Yo nde tomonaka pole.

11Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.

12Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.

13Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi, balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath