Boklisto
zonga

Banzembo 33

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe ! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.

2Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.

3Boyembela Yawe nzembo ya sika, bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.

4Pamba te Liloba na Yawe ezali alima, misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.

5Yawe alingaka bosembo mpe alima ; mokili etondi na bolingo na Ye.

6Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.

7Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.

8Tika ete mokili mobimba etosa Yawe ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.

9Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.

10Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.

11Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.

12Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.

13Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato.

14Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili.

15Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.

16Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.

17Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko, makasi na yango nyonso ekangolaka te.

18Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,

19mpo na kokangola bango na kufa mpe kobatela bango na bomoi ata na tango ya nzala makasi.

20Totielaka Yawe motema ; azali lisungi mpe nguba na biso.

21Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.

22Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo, tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath