Boklisto
zonga

Banzembo 30

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.

2Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.

3Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.

4Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.

5Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

6Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka mpo na mwa tango moke, kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko ; kolela ekoki kowumela kino na pokwa, kasi kosepela ekokota na tongo.

7Tango nazalaki na kimia, nalobaki : « Nakotikala kokweya te. »

8Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai ; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya.

9Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :

10« Litomba nini ezali soki nakufi, soki nakiti na libulu ? Boni, putulu ekokumisa Yo ? Boni, ekosakola boyengebene na Yo ?

11Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »

12Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,

13mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo, kasi navanda nye te. Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo libela na libela.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath