Banzembo 29
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.
2Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.
3Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
4Mongongo ya Yawe ezali na nguya ; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
5Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.
6Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.
7Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto.
8Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.
9Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka : « Nkembo ! »
10Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela ; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.
11Yawe apesaka bato na Ye makasi ; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath