Banzembo 26
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo ; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.
2Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai, sosola motema mpe makanisi na ngai,
3pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.
4Navandaka esika moko te na bakosi, natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.
5Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
6Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,
7mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.
8Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.
9Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,
10oyo maboko na bango etondi na makila, mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.
11Natambolaka na bomoi ya bosembo ; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.
12Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima ; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath