Boklisto
zonga

Banzembo 21

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene !

3Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.

4Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.

5Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.

6Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye ; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.

7Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.

8Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

9Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.

10Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.

11Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.

12Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;

13pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.

14Yawe, telema na nguya na Yo ! Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath