Banzembo 14
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.
2Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.
3Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te !
4Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !
5Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.
6Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye.
7Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona ! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath