Boklisto
zonga

Banzembo 148

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bokumisa Yawe ! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.

2Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso ;

3bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka ;

4bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !

5Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.

6Atiaki yango mpo na libela ; apesaki mibeko oyo ekobongwana te.

7Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,

8ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;

9ezala bangomba milayi to bangomba mikuse, ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,

10ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso, ezala bikelamu oyo etambolaka na libumu to bandeke,

11ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso, ezala bakambi to batambolisi nyonso ya mokili,

12ezala bilenge mibali to bilenge basi, ezala bampaka to bana mike !

13Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.

14Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath