Banzembo 147
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !
2Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.
3Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
4Ayebi motango ya minzoto mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.
5Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ; mayele na Ye ezali na mondelo te.
6Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
7Boyembela Yawe nzembo ya matondi ! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye !
8Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.
9Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
10Asepelaka na makasi ya mpunda te mpe alingaka te nguya ya moto ;
11kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.
12Yelusalemi, pesa nkembo na Yawe ! Siona, kumisa Nzambe na yo !
13Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.
14Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.
15Atindaka mitindo na Ye na mokili, mpe maloba na Ye epanzanaka mbala moko !
16Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu ;
17akweyisaka mabanga ya mvula yango lokola mabanga ya mike-mike ; nani akoki kotelema na malili na yango ?
18Soki kaka atindi liloba, malili ekomaka kosila moke-moke ; mpe soki atindi mopepe, mayi ekomaka kotiola.
19Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.
20Asalaki bongo na ekolo ata moko te ; boye eyebaka mpe mibeko na Ye te. Bokumisa Yawe !
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath