Banzembo 146
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Bokumisa Yawe ! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !
2Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
3Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
4Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
5Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !
6Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.
7Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.
8Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.
9Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe.
10Yawe azali Mokonzi seko na seko ; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela ! Bokumisa Yawe !
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath