Boklisto
zonga

Banzembo 145

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.

2Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.

3Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.

4Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.

5Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.

6Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.

7Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko.

8Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.

9Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.

10Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !

11Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.

12Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.

13Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.

14Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.

15Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki.

16Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.

17Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.

18Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;

19akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.

20Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.

21Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe ! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath