Boklisto
zonga

Banzembo 141

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ; yaka noki epai na ngai ! Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo !

2Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa !

3Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !

4Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.

5Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.

6Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga ; na bongo, maloba na ngai ekoyokana, pamba te ezali kitoko.

7Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.

8Yawe, Nkolo na ngai, miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo ; nazali kobombama kati na Yo, kotindika ngai na kufa te !

9Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.

10Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath