Banzembo 13
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
2Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?
3Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso ? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?
4Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu ; soki te, nakokufa,
5bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.
6Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath