Boklisto
zonga

Banzembo 137

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.

2Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango.

3Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo ; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba : « Boyembela biso banzembo ya Siona ! »

4Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya ?

5Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !

6Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !

7Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »

8Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !

9Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath