Boklisto
zonga

Banzembo 136

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

2Bosanzola Nzambe ya banzambe ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

3Bosanzola Nkolo na bankolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

4Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

5Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

6Atandaki mabele na likolo ya mayi ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

7Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

8moyi mpo na kongengisa mokolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

9sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

10Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

11Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

12na nguya monene ya loboko na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

13Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

14Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

15Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

16Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

17Abetaki bakonzi minene ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

18Abomaki bakonzi ya nguya ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

19Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

20mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

21Akabaki mabele na bango lokola libula ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

22lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

23Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

24Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

25Apesaka bilei na bikelamu nyonso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

26Bosanzola Nzambe ya likolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath