Banzembo 122
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai : « Tokende na Tempelo ya Yawe ! »
2Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo !
3Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.
4Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
5Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.
6Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !
7Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi !
8Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi : « Tika ete kimia ezala kati na yo ! »
9Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath