Boklisto
zonga

Banzembo 114

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya,

2Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.

3Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima,

4bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.

5Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima ? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?

6Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme ? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba ?

7Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi,

8oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath