Boklisto
zonga

Banzembo 113

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bokumisa Yawe ! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ; bokumisa Yawe !

2Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela !

3Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

4Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

5Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ?

6Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili.

7Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela ; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola

8mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.

9Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath