Boklisto
zonga

Banzembo 10

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Yawe, mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?

2Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.

3Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.

4Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.

5Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso.

6Amilobelaka : « Eloko moko te ekotikala kolengisa ngai. » Alapaka ndayi boye : « Moko te akotikala kosala ngai mabe. »

7Monoko na ye etonda na bilakeli mabe, lokuta mpe mangungu ; abongisaka kaka pasi mpe mabe.

8Abombamaka pene ya bamboka. Wuta na bisika oyo abombamaka, abomaka moto oyo asali mabe te. Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.

9Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.

10Agumbaka ye mpe avandisaka ye na mabele, mpe akweyaka na se ya bokonzi na ye.

11Amilobelaka : « Nzambe akotikala koyeba te, abombaka elongi na Ye mpe akotikala komona te. »

12Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.

13Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe ? Mpo na nini amilobela : « Nzambe akopesa ngai etumbu te ? »

14Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.

15Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.

16Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.

17Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,

18mpo na kolongisa mwana etike mpe monyokolami ; boye, bato ya mokili bakobangisa lisusu te.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath