Boklisto
zonga

Banzembo 108

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo ya Davidi.

2Nzambe, motema na ngai ezali na kimia ! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ; ezali mpe lokumu na ngai.

3Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.

4Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.

5Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

6Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !

7Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama !

8Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.

9Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.

10Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »

11Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?

12Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso !

13Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini ! Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.

14Elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath