Banzembo 101
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo ; nakoyembela nde Yo, Yawe.
2Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
3Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
4Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.
5Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
6Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai ; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.
7Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ; liboso na ngai, mokosi akotelema te.
8Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath