Boklisto
zonga

Masese 22

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.

2Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga : ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.

3Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.

4Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.

5Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.

6Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

7Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.

8Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.

9Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.

10Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.

11Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.

12Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.

13Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »

14Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.

15Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.

16Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.

17Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.

18Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.

19Nateyi yo yango lelo mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.

20Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,

21batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo ?

22Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,

23pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.

24Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,

25noki te okoyekola nzela na ye mpe okokangama na motambo na ye.

26Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,

27pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala ?

28Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.

29Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath