Boklisto
zonga

Naumi 3

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Mawa na engumba oyo mosala na yango kosopa makila ya bato, engumba oyo etonda na makambo ya lokuta mpe na moyibi, engumba oyo ezangaka te koboma bato !

2Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu, makelele ya bapine : bampunda ezali kopumbwa, mpe bashar ezali koningana.

3Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bazali kotambola-tambola, mipanga ezali kongenga, makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali ! Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza ! Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso, mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe tango bazali kotambola.

4Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.

5« Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.

6Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.

7Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga : ‹ Engumba Ninive ebebisami boye ! Nani akoyokela yango mawa ? › »

8Boni, okanisi ete ozali kitoko koleka engumba Tebesi oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili mpe ezingelama na mayi, bongo ebale ebatelaka yango mpe mayi ezalaka lokola mir oyo ebombaka yango ?

9Makasi na yango ezalaki kowuta na Kushi mpe na Ejipito ; bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.

10Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.

11Yo mpe okokoma lokola moto oyo alangwe masanga, yo mpe okoluka ekimelo mpo na kokima banguna na yo.

12Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela ; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.

13Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi ; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.

14Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino ; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino ; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.

15Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.

16Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo ebele koleka ata minzoto ya likolo, kasi babebisi mokili nyonso mpe bapumbwe na bango ndenge kaka mankoko esalaka.

17Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili ; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.

18Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.

19Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath