Naumi 2
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Botala kuna na bangomba makolo ya momemi sango malamu : amemi sango ya kimia ! Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo mpe kokisa ndayi na yo ; pamba te wuta sik’oyo, moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo ; pamba te bango nyonso bakobebisama nye.
2Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
3Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
4Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
5Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
6Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
7Bikuke ya ebale efungwami , mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
8Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza ; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
9Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo : etoboki mpe ekomi kobimisa mayi ! Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
10Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
11Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo ! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
12Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
13Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
14« Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath