Boklisto
zonga

Mishe 5

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.

2Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.

3Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.

4Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.

5Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.

6Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.

7Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.

8Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !

9« Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,

10nakobebisa bingumba ya mokili na yo mpe nakokweyisa bandako na yo, oyo batonga makasi ;

11nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki, mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ;

12nakobebisa banzambe ya bikeko oyo ezali kati na yo, mpe okofukamela lisusu te bikeko oyo maboko na yo esilaki kosala ;

13nakobebisa makonzi ya bule ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo mpe nakobebisa bingumba na yo.

14Na kanda na Ngai ya makasi, nakozongisa mabe na mabe na bikolo oyo etosaki Ngai te. »

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath