Boklisto
zonga

Jozue 16

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli.

2Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti,

3ekitaki kino na ngambo ya weste na mondelo ya bato ya Yafeleti kino na etuka ya Beti-Oroni ya se, kino na Gezeri ya suka mpe esukaki na Ebale monene.

4Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula.

5Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;

6ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este.

7Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.

8Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango.

9Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase.

10Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath