Boklisto
zonga

Yona 2

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.

2Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye.

3Alobaki : « Kati na mawa na ngai, nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai. Wuta kati na mboka ya bakufi, nasengaka lisungi, mpe ayokaka ngai.

4Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.

5Nazali komilobela : ‹ Obengani ngai mosika na miso na Yo ; nzokande ngai nazali kokoba kotalela Tempelo na Yo ya bule. ›

6Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.

7Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.

8Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.

9Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.

10Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi, nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa, pamba te lobiko ezali ya Yawe. »

11Mpe Yawe apesaki mitindo na mbisi, mpe mbala moko, mbisi esanzaki Yona na mokili.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath