Joeli 1
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli :
2— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka ! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?
3Boyebisa yango epai ya bana na bino, mpe tika ete bana na bino bayebisa yango epai ya bana na bango ; mpe bana na bango, na milongo ya bato oyo bakoya na sima.
4Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango ; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango ; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.
5Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela ; bolela, bino nyonso bameli vino. Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.
6Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai, ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga motango ya bato na yango. Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali, mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
7Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi, elongoli banzete na Ngai nyonso baposo, ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.
8Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili mpo na kolela mobandami na ye.
9Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.
10Bilanga ebebisami, mabele ekawuki, mbuma ya ble ezali lisusu te, vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.
11Bino basali bilanga, bozala na soni ; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.
12Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.
13Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
14Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.
15Mawa na mokolo wana ! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
16Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso, balongoli te bilei, esengo mpe kosepela ?
17Bankona ekawuki na se ya mabele, bibombelo etikali lisusu na eloko te, bibombelo ya bambuma ebukani mpo ete ble ezali lisusu te.
18Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.
19Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela, pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.
20Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath