Boklisto
zonga

Yobo 42

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Yobo azongiselaki Yawe :

2« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.

3Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? › Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, makambo oyo nasosolaki te.

4Olobaki na ngai : ‹ Yaka sik’oyo, nalingi koloba ; nalingi kotuna yo motuna, bongo okopesa ngai eyano. ›

5Matoyi na ngai eyokaki makambo oyo bazalaki koloba na tina na Yo ; kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo.

6Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »

7Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.

8Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »

9Boye Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa, mpe Tsofari, moto ya Naama, basalaki makambo oyo Yawe atindaki bango kosala ; mpe Yawe ayambaki libondeli ya Yobo.

10Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.

11Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.

12Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.

13Azalaki na bana mibali sambo mpe bana basi misato.

14Mwana na ye ya liboso ya mwasi, Yemima ; ya mibale, Ketsia ; mpe ya misato, Kereni-Apuki.

15Kati na mokili mobimba, ezalaki te na basi kitoko koleka bana basi ya Yobo. Tata na bango apesaki bango libula ndenge moko na bandeko na bango ya mibali.

16Sima na yango, Yobo awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na tuku minei ; amonaki bana na ye mpe bakitani na ye kino na molongo ya minei.

17Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath