Boklisto
zonga

Yobo 26

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Yobo azongisaki :

2« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi !

3Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !

4Ozwi maloba oyo wapi ? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?

5Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.

6Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele.

7Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,

8akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;

9azipaka kiti ya bokonzi na Ye, atandaka mapata na likolo na yango ;

10akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.

11Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.

12Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ; mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.

13Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.

14Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath