Boklisto
zonga

Yobo 23

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Yobo azongisaki :

2« Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, loboko oyo ezali likolo na ngai eleki kolela ya motema na ngai na kilo.

3Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,

4nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,

5nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai, mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai.

6Boni, alingaki kosalela nguya na Ye mpo na kosamba na ngai ? Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa !

7Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.

8Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te ; soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te.

9Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.

10Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.

11Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ; natambolaki na nzela na Ye mpe natikalaki kopengwa na yango te.

12Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.

13Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; nani akoki kotelemela Ye ? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.

14Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.

15Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.

16Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.

17Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai ekangi ngai monoko te.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath