Boklisto
zonga

Ezayi 61

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;

2mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, kobondisa bato oyo bazali kolela,

3komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.

4Bakotonga lisusu bisika oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala, bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ; bakokomisa sika bingumba oyo ekweya, oyo ebeba wuta bileko ya kala.

5Bapaya bakoleisa bibwele na yo, bana ya bapaya bakosalela yo bilanga mpe bakolonela yo bilanga ya vino.

6Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.

7Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela.

8Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo, nayinaka moyibi mpe masumu ; nakofuta bino na bolingo na Ngai mpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino.

9Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ; moto nyonso oyo akomona bino akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.

10Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.

11Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti mpe elanga ebimisaka nkona na yango, Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath