Boklisto
zonga

Ezayi 52

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.

2Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu ! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo !

3Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »

4Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya ; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango.

5Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.

6Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »

7Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »

8Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.

9Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.

10Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso ; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.

11Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !

12Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.

13Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.

14Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,

15ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath